Mokolo ya ntuku mibale na sambo ya sanza ya mwabe oyo, , ntoma ya mateya ya ékolo mpe kozala mwana mboka ya sika, Raïssa Malu, abandi mosala ya Revue annuelle ya performance (RAP), na miso ya n’toma molandi na ye, Jean-Pierre Kezamubru. Mokano oyo, oyo ekosalema na mikolo misato, ezali na mokano ya kotala ndenge mbula ya kelasi eleki mpe kosala mwango mpo na oyo ekoya.
Motó ya likambo oyo eponami mpo na mobu oyo ezali « Kobongisa lolenge ya mateya mpo na kolendisa bokoli ya nkita mpe ya bato ». Milulu oyo esangisaka basali ya ntina na ebolo oyo ya mateya na bituka ntuku motoba (60) na kati ya ekolo Kongo Démocratiki.
N’toma amonisaki ntina ya forum oyo mpo na kotala bosaleli ya mbongwana mpe kondima miango mpo na mobu ya kelasi 2024-2025, oyo bobandi na yango esengeli kosalema mokolo ya mibale ya sanza libwa 2 na Tshikapa, na etuka ya Kasai . Amonisaki mpe ntina ya likanisi ya « kolinga mboka ya sika », oyo euti kondimama na mbulamatari, oyo ezali na mokano ya kopesa mateya na bana mboka oyo bazali na mokumba mpe oyo bamipesi.
« mbulamatari na biso euti kopesama etinda ya kotombola bomoto ya sika kati na bayi mboka, oyo etongami na ba mituya ya bonsomi, bondeko, bosangani, bosembo, kimia mpe mosala Yango esangisi kopesa malakisi mpe mateya na bana ya mboka oyo nazali ba mokumba, mpe bakoki kobakisa likanisi ya malamu mpo na kotombwami ya mboka na biso mpe kosangana na botongi ya lisanga ya bosembo pe ya boyokani Misala oyo totie, lokola bosangisi ya mituya ya kolinga mboka na manaka ya kelasi pe bosangani ya bilenge na misala ya lisanga, ezali na tina ya kolendisa boyokani ya bato mpe kolendisa molende ya bomoto,” elobi ye
Mosala ya botali ya mbula na mbula eye esalemi nsima na bosukisi masolo kati na mbulamatari mpe balobeli ya balakisi, kondimisa ebandeli ya mobu ya kelasi mpo na mokolo ya mibale ya sanza ya libwa.
Caleb makonda













