Likita ya ba panzi sango o nzela ya internet (MILRDC) elongo na likita ya internews bayebaki kopesa zebi na panzi sango bi yike mokolo ya 13 sanza zomi na mibale “ lolenge ya bolambi ba sango na bisika ya bo ndongwani “.
Mayangani ena ezalaki pona koteya pe kobakisela ba panzi sango mayele pona kosangika basango, pona lyoko ya bateyi ndeko Jespère Imembe Koyoronwa, molobeli ya bato o liboso ya ba zuzi o ndako inene ya esambiselo Kinshasa/Matete ye ayebaki motuya ya bo pesi ba sango na bobombi sango na bo talisi polele, ayebaki ko limbola lisusu te makama mingi eyi ekozalaka na bopesi ba sango pe koyeba ko mi batela pona kopesa ba sango ya mabe te pe bobombi ba sango lyoko ya motuya pona ekolo o tangu ya etumba.
Pona ndeko Charles Musinzi na tango ya etumba to bo ndongwani na kati ya ekolo ba sango ya maye matali bo kengeli esengeli epesama na bokebi mingi
Apesa ki lisusu toli na ba panzi sango “bosengeli te kopesa zala na boyokani na banguna ya mboka yambo nioso bossngeli kozwa ndikisa ya bulamatari na bokebi te bo zwa mbano
Pe Abakisaki te bokebi na maye matali bokotisi nungu nungu pe bo ndongwani kati ya ya mapinga. Molulu eyi epesami o tango mboka Congo eko bundaka na ba M23.
Yulio Yilbert