N’a sima ya Dieudonné Kamuleta, Elie-Leon Ndomba Kabeya, mokonzi ya liboso ya esambiselo ya cassation, azuaki karte ya botalisi na ye vendredi oyo 04/26/2.
Liboso ya bapanzi-sango, Elie-Leon Ndomba Kabeya apesaki matondi n’a tata mokambi ya ekolo Congo, Felix Tshisekedi oyo a sali tè bayi mboka nionso ya congo bazwa karte ya botalisi sima ba mbula tuku misatu.
« Nazali n’a Esengo mpe matondi tata mokonzi Felix Tshisekedi Tshilobo kopesa nzela na kongolais kozwa karte nsima na bambula tuku-misatu. Lelo tozali n’a lolendo yako zala n’a ngo mpe yako bengama kongolais. Mwana mboka nionso akozala n’a nimero ya makambu matali yemoko. Elobi ye liboso ya bapanzi-sango
Esengeli koyeba tè botalisi ya batu nyonso esakolami ekobanda mokolo ya 01 mai mpe etapi yango etali Kaka ba commune mineyi lokola Bandalungwa, Limete, Lingwala mpe Nsele.
Caleb Makedika













