O liboso ya ba panzi sango Mwana mboka Patrick Muyaya n’toma mokambi misala ya bopanzi sango mpe molobeli ya Bulamatari, elongo na Nicolas Kazadi N’toma mokambi misolo ya Mboka batalisaki motango ya misolo mpe miye mikoya.

Na Kati ya masolo “Motango” to mpe “Chiffres “ lolenge lya sika ya bolakisi misala ya bulamatari eyi eko kambama na N’toma wa tembo Sama Lukonde.
O maloba waye N’toma Nicolas Kazadi ayebaki kolakisa naino botambolisi elamu ya misolo na:
1. Pona bo lendisi ya misolo moe Bompikiliki uta mibu mileki na bokambi ya tata Mokonzi Félix Tshisekedi mibu mitano kasi moko ya mibu etuti samaki na bokono ya Covid-19 .
Uta 2018 na 2023 : bo fuluki ezalaki na 5,8% à 6,2% na 2023
2• bo foluki ya misolo, ya koyeba ete esengelaki mpe ko batela mpe ko telemisa mpifo ya bo sombi biloko biike o liboso ya bo fuluki mpe bomati talo ya biloko uuta bo ndongwani ya ekolo Russie na Ukraine kasi na mobu 2018 , motango ezalaki na 7,23% eyebanaki kovanda na 22,6% na mobu 2023.
Mosimbi misolo ya ekolo atalisaki bokeseni kati ya bo fuluki na bokambi ya bulamatari eleka mpe na oyo ezali lelo tala na Tina ete na mibu 2012-2018 bomatiii na ango ekomaki tiii 54,75% kasi uta na tango 2019-2023 emati obe na 22%

3. Bo balusi misolo ezui mwa mutungusi kasi evandisami mukie n’a mobu 2023 kasi na lolenge ya komata ya lomea ya ki amerika na motangi ya mikili mpe bikolo biike.
4. Misolo ebombama na Tina bo balusi,na yango esengaki ko fulisama koleka uta lipanda na mobu 2018 ezali 879 millions ya ki amerika kasi lelo ezali na motango ya 4 milliards 721 millions ya ki amerika.

5. Misolo ( nkita) ezali ko fuluka soki lobi ezalaki 5 ,7milliards ya ki amerika lelo motango ekeyi ti 16, 1 milliards ya ki amerika.
6. Bo fuluki misolo elongwe na 9,0% na 2018 pona lelo 13,2 na 2024.
Rédaction













