Kasi ayebaki koyamba mokolo ya libwa loleki n’toma Denis kambayi mokambi ya likita grand kasai , bo paya ena ezalaki na libaku ya ko talisa ye solo mosala ya lokumu mpe ya ntina ndenge ako bundaka pona ko telemela ba nyuma ba ye ba salaka kanyaka mpe koyiba maoli ya l’état kasi ya koyeba Igf azo landa ba miyibi nioso oyo wuta mibu mineyi.
Denis kambayi atalisi motuya ya bokasi oyo jules alingete na lolenge ako salaka mosala ayeba te bana Congo batiki ye te baza na sima naye “ eza pona biso banso etumba oyo yango ntina ya boyeyi na nga awa “ eloba ye.
Ebongo na kati ya masolo mupaya ya Zule alingete azwaki ba sango ya lapolo ya Igf kotala lolenge misala botongi eko tambolaka na kuna na kasai ya kafumba mpe na Katanga, kasi atalisaki mwa koyima yima naye na ntina te akomona neti mwa bo limwisi mpe moyibi ya misolo eyi na sénat mingi mingi mpo na misolo ya sanza misatu, mineyi mpe mitano .
Uta bitumba oyo igf a ko ndongwanaka na kanyaka mpe miyibi eboti efungoli solo misu na bana mboka ya ngo nde ntina ako yambaka mikolo minso ba paya ba koyaka mpona yeba nini eko salemaka.
Gilbert F













