Nakotala lolenge mikolo miye onzela ya internet nsango ya lokuta lizali kotambola mpoya koloba’te : mobu moye tata Mokonzi Félix Antoine tshisekedi tshilombo asili kolongola mokano moye bakamataki u’to mobu mwa nkoto mibale na zomi na libwa ( 2019 ) o etando mobimba y’ekolo Congo démocratique biteyelo ya nse likomi ya ofele baboti ya Bana kelasi bakofuta ata mosolo moko te.
kasi mikolo miye o nzela ya internet nsango ya lokuta lisili KO panzana na mpo yango Ministre mokambi atali mambi ya bampanzi nsango mpe molobeli ya mbula matari Patrick muyaya atalisi ‘te ezali nsango ya lokuta zambi mbula matari azali kokoba na likanisi liye mpamba te kelasi ya ofele lizali na mabongi ya malamu Mya ndenge na ndenge kasi maye tokoki kosimba mazali masato:
ya liboso mpoya bayekoli mpamba te ekolo mibu mikoya likokoma na bato bayike bayekola, o ngambo ya balaki mbula matari lizali kosala manso mpo’te ebikeli Lya bango lizala malamu mpe o ngambo ya baboti batungisama ata Soko moke te mpoya kelasi ya Bana Zambi mbula matari atiki mokana moye te , wana lolenge ministre mokambi ya ba mpanzi ya nsango mpe molobeli ya mbula matari Patrick muyaya atalisi.
FRANCK BOLANSHI













