Tata Mokonzi ya ekolo Kongo Demikratiki, Félix Tshisekedi, ayambaki, mokolo ya misato ya zomi na moko ya sanza ya libwa mercredi le 11, na ndako ya Union africaine mokambi ya Conseil supérieur ya Conseil audiovisuel et communication (CSAC), Christian Bosembe.
Masolo maye mabalukaki nzinganzinga ya bosenga ya bokengi ya bapanzi sango na ekolo Kongo, lokola esengami na matika minene ya yambo ya bapanzi sango oyo esalemaki na Kisasa na ebandeli ya mobu 2022, na bokambi ya mbulamatari ya kosolola mpe bapanzi-sango, Patrick Muyaya.
Polele, Mokonzi ya ékolo alingaki ayeba nini CSAC, lokola mokambi ya bobatelami, ekoki kotia lokola makoki makasi mpo na kosala te esika ya bapanzi-sango ezala na bokengi, na oyo etali kobotama ya ba reso socio, oyo lelo oyo ezali kobebisa bomoto ya bato na komemelaka bango bimesano ya bapaya mpe na nzela ya ba singa oyo bayi mboka bazo salela.
Pona kosilisa makama oyo nionso oyo epalangani na ebolo ya bapazni-sango ya Kongo, mokambi monene ya CSAC a lakisaki na Tata Mokonzi ya ekolo miango masali ye moi na plan ya kobongisa bapanzi-sango ya bonkoko mpe ya kilelo.
Lisusu, abimisaki liboso ya mokonzi ya ékolo ya Mokonzi ya Mboka mua biyano mpe ba mbano oyo ekoki mpo te esika ya bapanzi-sango ya ékolo ezala malamu mpe na bokengi.
Caleb Makedika













