Likambo ya forage eyindi batu nyonso be Lisolo ya société STEVER na mbulamatari ya ekolo Congo.
mopanzi-sango oyo azali kosala bolukiluki ye Mills TSHIBANGU alakisi sembo pe bosolo
Bapanzi-sango ebele oyo basalaka bolukiluki, Moko kati na bango Israel MUTOMBO, mokonzi ya etando BOSOLO Tv, ayebaki kobeta tangwa na lisolo oyo kasi pona Mills TSHIBANGU ndeko ena azali na sembo te.
Na lisolo naye Israel Mutombo ayebaki kotanga bato kasi na lolenge ya bobesi be bomoto ya ba N’toma lokola Nicolas KAZADI na mwana mboka Mike KASENGA
ntina ya likambu ezali botongi forage bisika biinso ya RDC, mopanzi-nsango ya bolukiluki Mills TSHIBANGU abongisaki bokutani na bapanzi sango mokolo ya vendredi oyo le 19 avril mpo na kotalisa solo na sembo okati ya lisolo ya lokuta oyo Israel MUTOMBO ayebaki na kobimisa n’a polele oyo ezanga bilembeteli kopesa ya solo mpenza mpo na koyeisa mpole epayi n’a bayi mboka oyo ezali kozua mileki uta na projet oyo elobami

Uta ebandeli, Mills TSHIBANGU alimbolaki motuya mpe tina yako buka mpe ko panza lokuta ya ndeko Israël Mutombo
bapanzi-sango ya Kinshasa « mpo na koluka kolongola mbutu mbutu n’a makambo mosusu oyo ezali ko lobama na bapanzi-sango oyo étali masolo oyo mbulamatari ya ekolo Congo mpe société ya Mike KASENGA ba signaki.«
Pona na Mills TSHIBANGU, “baninga ya mosala oyo nba bapanzaki sango mpe bakosaki bayi mboka na ba molongo nionso.
Bokutani na ba makambu oyo ezolobama mpo na msolo motuya ya botongi ya forage, M. TSHIBANGU apesi likanisi ete « mbulamatari, na nzela ya Direction générale ya contrôle ya ba achats publics (DGCMP), epesaki kopesa nzela mpe mokoloto ya non-objection liboso ya kontra epesama na bango. Mbulamatari ya ekolo Congo. »
Engebene na sango ezwamaki, N’toma Nicolas KAZADI, oyo atangami na likambo liye, amekaki kokitisa ntalo ya contrat oyo na 34% mpe komatisaka motango ya ba stations ya forage wuto 1000 kino 1400.
Kasi, engebene na mokanda ya Leta ya n’toma ya Développement Rural oyo Mills TSHIBANGU atangi, mwa ba stations ya forage esi ezwami, mpo na motango ya ba stations opérationnelles 126 na kati ya 222 oyo ekanamaki na mobimba.
Kolanda lokuta nyonso wana, journaliste Mills TSHIBANGU atindaki message makasi na ba journalistes enquêteurs : « To yeba ko tosa ba n’toma mpe to pesa loboko epa na bango.

Esengeli koyeba tè mopanzi-nsango molukiluki Mills TSHIBANGU azali lakisa mosapi bandeko ya mosala na ye mpo atangaki kontra ya ngo. Asengi na ba bapanzi-sango banso ya balukiluki mpe ba oyo bayebi likambo eye mpe bayebi makambu matali oyo ekomami na mokanda ya leta.
Abakisi ete likanisi ya mbulamatari ya Congo na nzela ya kontra oyo ezalaki ya kopesa ba mboka nionso ya RDC mwa bakonzi ya mayi, na tina ya kopesa nzela na bayi mboka ya kozwa mayi na pete mpo na kokokisa bamposa na bango ya liboso.
Caleb Makonda













