William Ruto, mokonzi ya ekolo Kenya, asepeli na botiyami ya Félix Tshisekedi lokola mokambi ya Congo démocratique mpo na mbala ya mibale ntango azali kondimisa boninga ya bato na ye na ba Congolais. Kasi lisusu na ekateli na ye ya kosala na moninga na ye congolais mpo na kotombola kimia.

“Ntango bobandi mandat na bino ya mibale, nalingi kondimisa bino mpe bato ya ékolo Congo Démocratique mpo na boninga bokobi ya bato ya Kenya,” elobi William Ruto na compte officiel na ye
Mpe abakisaki “Nazali kozela na esengo kosala elongo na bino mpo na kokolisa boyokani ya penepene kati na bikolo na biso mpe kolendisa kimya na etuka na biso,” ebakisi mokonzi ya Kenya.
Boyeba ete mokambi ya Kenya ya lelo akendeki solo na molulu ya botiami na bokonzi ya mokokani na ye Félix Tshisekedi na stade ya ba Martyrs ya Pentecoste samedi oyo, le 20 janvier, elongo na bakonzi misusu ya bikolo ya Africa misusu 17 oyo bazalaki na stade oyo ezali likolo.
Caleb Makonda













