Mpoya bolengeli bozongi ya kelasi miye mikosalema mokolo mwa yambo mikoya ya sanza ya libwa , ministre mokambi ya kelasi ya nse ya katikati mpe ya ntei Raissa Malu abandisaki likita liye Lya mikolo misatu: libandaki mokolo mwa yambo ya tuku mibale na motoba Kino mokolo mwa misato ya tuku mibale na mwambe bosimba’te likita lyango lisangisaki bakambi tuku motoba ya bituka ya mambi Matali kelasi ya ekolo ya biso Congo démocratiki y’etando mobimba.
Mpoya ministre mokambi ya kelasi ya nse ya nteyi mpe ya katikati Raissa Malu Tina myango mpoya koluka’te tombwana ya mambi Matali kelasi, zambi nazali kosombetinya makasi mpo’te manso makende liboso.













