Na kobanda na yango mokolo ya mposo ya 2 août 2024, uta na engumba ya elikya, Kisangani na provense ya Tshopo, lisanga ya kozwa bokasi ya kolinga mboka oyo ebangami « Nionso pona ékolo » ebengamaki mokolo oyo ya poso 3 août na tongo moko na esika ya kofanda ya Université ya Kisangani.
Naba ngonga pêne ya misato, bato minei ya Gouvernement Suminwa bapesaki ndimbola oyo ezali na lisanga ya « Bendele Ekweya Te » na bayekoli ya ba institutions ebele ya malakisi ya likolo mpe universitaire ya Kisangani.
Kati na bato menei yango, emonisami bongo Patrick MUYAYA (N’toma ya bosololi mpe bopanzi-sangi), Safi SOMBO (N’toma ya Enseignement supérieur mpe universitaire), Noëlla AYENAGANAGATO (N’toma ya bilenge mpe Kozwa Bokasi ya Patriotisme) mpe Samy ADUBANGO (N’toma molandi ya Défense nationale mpe Anciens combattants).
Moto na moto na bokonzi na ye a ndimbolaki liboso na bato oyo bayaki lolenge ya lisanga ya bato ya mboko oyo ezali kokanga esengo mpe lisungi na FARDC mpo na kokotisa mpe kokoka nzela ya biso.
« Tosalaki molende na bayekoli, mpo ezali likambo oyo elingaka biso nyonso. Mpo ezali mboka. Ezali te likambo oyo ezali na mokonzi ya mboka mpe na mbulamari na ye, ezali likambo oyo ekozala na biso nyonso, na engumba oyo ekweyaki na makambu ya bitumba.Mokolo oyo, ezali na ntina ete tokoka kosunga mapinga na biso na makasi na yango, mpo ekoki kosunga biso, mpe kokitisa unity nationale. Na mosala oyo, moto na moto azali na mokumba na ye, na bino bapanzisangi », elobi N’toma ya bosololi mpe bopanzi-sango
Akomaki lisusu :
« Biso nyonso tokoki kotia molende. MPa na likita ya ya ntongo na UNIKIS, oyo ezalaki na n’tina ya kokitisa bilenge, mpo na kosala makasi mpo na kokumisa makambo ya mboka. Mpe lisusu mpo na kosala mokumba na biso mpo na kobatela ékolo. Tosepeli makasi mpo na boyambi ya bilenge ya Tshopo, mpe masolo oyo tozwi. Tokoya na esengo ete ezali mbala ya yambo ya molongo monene. »
Na yango, N’toma ya bosololi mpe bopanzi-sango abakisaki na ba Kongolais ete bazali na Kisangani na lisanga monene ya mbulamatari mpo na komonisa na bayi mboka ya Kisangani, mpe Tshopo mpe ya provinse monene Orientale mpo na Genocost, kobomama ya ba kongolais mpo na ba n’tina ya n’kita.
« lobi, tozwi molulu monene oyo tozwi mataloli, mpe komipesa ya tata mokonzi ya mboka mpo na kobongisa bato oyo banzwaki ba mpota mpe bakufisaki ba ndeko na makambu oyo ya mpasi, mpe lisusu komipesa mpo na kokoba na bokasi pona kobatela ékolo», elobi Patrick MUYAYA.
Po na Molobeli ya mapinga ya ékolo kongo, Général Sylvain EKENGE, FARDC ezali na bato ya mayele.
« Ba mapinga oyo boyebi, oyo azali kozwa bilili, azwi mateya na yango awa mpe nazo koba lisusu na éteyelo ya Kisangani. Azali kosala doctorat na éteyelo ya Kisangani. Ezali pona koyebisa bino ete mapinga ezali lisanga oyo ebongisami na bato oyo bazangi makanisi tè. Ezali te pona bana ba zoba, kasi ezali mapinga ya bato ya mayele. Ata moto oyo azoloba liboso na bino ye mpe elekaki na éteyelo ya likolo. Mpe baza ebele awa na Kisangani, Mpo na ba généraux oyo ezali na Kisangani, balelaki mpe na mateya na ba éteyelo ya likolo na. Mokoli oyo, bitumba ezali te likambo ya ba mapinga , kasi ezali likambo ya biso nyonso », alobi ye.
Po na kolonga ba sango ya lokuta na ba réseaux sociaux, N’toma MUYAYA asengi na bilenge bamemama te na ba ngunia na kokabolaka bilili oyo ezo bebisa FARDC.
« Nako lobela bino ete ekolo Kongo Démocratik, uta 1885, ezali mboka oyo ezali kolukaka, ezali mboka oyo ezali kobombama. Léopold II aboma ba kongolais milio zomi mpo na kozwa caoutchouc mpe kokoma Belgique. Uta 1960, kaka tozali kozwa makambu, komekama na kongo mpo na kozwa biloko ya Kongolais. Kasi ata mokolo moko tè jamais Kongolais bakanga maboko. Mpo na yango, tozali na mboka mobimba kino lelo. Eza liboso likambo ya kobatela mabele na ye. Mpe bato oyo bazali na lelo, bazali kosala, kasi bakokoka te mpo na bino mpe biso, tozali awa », elobi N’toma MUYAYA na bayekoli.
Po na kosukisa maloba naye, molobeli ya ya FARDC, général Sylvain EKENGE alobi : « Mapinga eza na nzela mosusu tè ». « Asengeli kokokisa etinda oyo ezali kobatela mabele ya mboko mobimba mpe bandelo ya mboka, mpe yako zongisa bitumba epayi ebandaki. Mpe mapinga ekosala yango. Mapinga ezali kosala mikano nionso oyo ebele mpo na kokitisa bitumba. Mpe mokolo oyo, ezali makambo oyo bozo yoka, boko yoka yango lisusu te. Mpo mapinga ezali na mpene yako longa etumba. Mpe ekokoma kaka elongo na bino mpe na bayi mboka nionso », alobi ye.
Caleb Makedika













