Na kati ya bokundoli ya Génocide ya mokolo ya mibale ya sanza ya mwambe, milulu mingi mibongisamaki kati na yango molulu ya leta oyo ebongisamaki na mbulamatari ya ékolo kongp na etuka ya TSHOPO bongo penza na engumba ya martyr ya Kisangani.
Na ngambo na ye, molakisi Luzolo Bambi Lessa, N’toma ya kala ya bosembo mpe makoki ya bomoto, andimi ete esengeli toleka kofunda makambu pamba mpe topesa eyano oyo elongobani na makama oyo ya Kongo. Ya solo, eyano na liwa koleka bamilio zomi etikali libiangi ya bosembo ya ékolo na nzela ya makonzí na yango minei oyo ezali pona koluka bosolo, bosambisi ya mibeko, bozongisi mpe garantie ya bozongeli te.
Lisanga ya bato mayele, oyo ekambami na molakisi Luzolo Bambi Lessa etikaki lapolo na yango na mbulamatari mpe na Nations Unies le 11 janvier.
Na yango, molakisi Luzolo Bambi Lessa asengi na mbulamatari ya ékolo kongo kozwa ndakisa na lapolo oyo ya lisanga ya bato ya mayele oyo ezali na biyano oyo ezomonana mpo na kobimisa RDC na ba kati nzela oyo ya mobulu oyo ewumela mingi.
Nakoyeba ba garanties oyo emonaná naino te, lisanga ya bato ya mayele epesaki likanisi ya mbongwana ya misala ya bokengeli (ANR, DEMIAP), FARDC mpe Polusu ya ékolo.
Lisanga yango ebeti sete na tina ya bolandisi ya politiki mpe botabwisi.
Na suka, makanisi nionso wana esalemi na mosala ya liboso ya mobeko ya ba etinda ya bakambi ya mosala oyo ekoki kosalelama na bosombo ya mwa tango oyo atie lokola mokanda oyo abakisi na lapolo na ye ya suka
Caleb Makedika













