Mokonzi ya yambo ya engumba ya Kinshasa, Daniel Bumba Lubaki, alakisaki na likita ya ba lobeli ya engumba kisasa etuka ya mokolo ya misato ya sanza ya mwambe 2024, mokanda ya mosala ya mbulamatari na ye ekeke ya 2024 – 2028, na tina ya kozua bokonzi na ye lokola mokambi ya yambo ya engumba kinshasa.
Na motuya ya 10 miliards 900 millions 432 mille 451,19 dollars américains (pene na 11 milliards USD), mokanda oyo babengi « Kinshasa Ezo Bonga » ezali na makambo zomi na moko oyo esengeli kotya na esika ya liboso, koleka, kobatelama, kotia bopeto mpe
kolongono ya nzoto, kobongisama ya ba nzela na bokasi nionso, kosala mwango pona engumba, botongi ya bandako ya leta ya bingumba mpe botongi ya engumba ya sika mpe mbongwana ya nimero.
Caleb Makedika













