Likambo Monne mpo na ba nkoi ya ekolo Kongo oyo bazuaki elonga ya mibale na bimekano mpo na Coupe d’Afrique 2025 ya Maroc, mokolo ya libwa ya sanza ya libwa na Dar es-Salaam.
Ekipi ya ekolo ékolo elongaki bongo na mingete mibale ya libungutulu (2-0) liboso ya Éthiopie na stadi Benjamin Mpaka na Tanzanie, mpo na kozanga stade endimami na Addis Abeba.
Sima na eteni ya liboso na ndembo oyo ekendaki libungutulu bipayi nionso mibale, ba nkoi ya ekolo Kongo ebeti ba Walyas ya Éthiopie ya nzela mingete ya Théo Bongonda (62’) na Fiston Mayele (76’), kaka sima ya mwa minuti sima ya bozongi na bango.
Elonga oyo epesi nzela na ba nkoi ba batela esika ya liboso na Groupe H na ba poin motoba, yambo ya bokutani na bango na Tanzanie oyo ekozala na sanza ya zomi ekoya na Kisasa mpe na Dar es Salaam.
Caleb Makedika













