Ezali mokolo mwa mitanu 18 sanza oyo wapi epayi mokambi ya balobeli ya Katanga somi Katebe Ngoy Michel awutaki ko pambola basali na mituka mibale epesamaki na molobeli Lupata Modimbi Thomas po apesa mokonzi ya basali ya likita ya balobeli
Tangu azalaki kopesa ba mituka ena asengaki na baye bako salela ngo ba batela ngo malamu, sima kozwa mituka bakotaki na likambu etali bo tombeli mobu elamu wapi epayi lisusu kuna Mwana mboka Joseph Kawuma ayebaki ko tonda bakambi ya pona mosala malamu kasi aba kisaki lisusu kopesa etando ya fololo eko talisa bomoko, sima naye mokambi( directeur de cabinet) Gustave Mumba ,ye pe ayaki na kombo ya likita ya basali ko tondo mobu elamu na ba kambi yambo basilisa basali banso balekaki liboso ya ba ponami o kombo ya Mwana Mboka Mwelwa Mutalanga,Mwenge jean Paul, Lupata Modimbi na liboso ya molobeli kabwe Michel ye azalaki motindami ya balobeli baye banso bazali na bopemi ,esilaki na esengo makasi molulu ena.











