Ba fdlr bazali te litomba oyo Rwanda asengeli ko bundisa mboka Congo | Patrick Muyaya
Molobeli ya bulamatari ya Congo Mwana mboka Patrick Muyaya atalisaki te ya solo maloba liye ekolobamaka te Rwanda akoluka kokanga ba fdlr na mabele ya Congo pona bokengeli ya mboka naye pe ba mboka nzinga nzinga .
O nzela ya masolo na ba panzi Sango ( briefing) ya mokolo ya 30 sanza mitanu molobeli ya bulamatari abanzi te Rwanda ekoki tee kolobaka lisusu azali na bobangi ba fdlr,soki azali nde makanisi misusu atia ngo nde na mesa , biso tokosala manso pona boluki kimia na baye bakoluka kimia,mbela ya Patrick Muyaya
Pona Rwanda bozalisi ya ba fdlr o mabele ya Congo ezalaka Kaka lolenge nabango ya koluka bozangisi kimia na Congo n’a bokoto Tangu iso ya mapinga na bango nakati ya mabele ya RDC.kasi masolo mingi kati ya ba mboka pene pene ndakisa Nairobi eyanoli bango na lolenge ya polele .
Murakarani godsend