Lisanga na bandeko ya ékolo Congo démocratiki esanganaki na masolo ya ba pesi misala pe misolo ya Afrika pe na Paris mokolo ya 23 sanza mineyi mo leki lokola mobembo ya tata mokonzi ya ékolo,Félix Tshisekedi na Paris oyo esengelaki kosalema mokolo ya 28 kino mokolo ya 30 sanza mineyi
Molulu monene moye, mobongisamaki elongo na ba n’toma ya kifalanse okati ya afrika mpe bapanzi-sango ya nkita, esangisaki bakambi ya mombongo mpe basali ya bibongiseli mingi, kozangaka likambo moko ya ntina mpo na kolendisa boyokani ya nkita kati na France mpe ‘Afrika
Na bokutani na ye, mokambi ya yambo ya likita pona botombwami (ANAPI), amonisaki makoki ya mboka Congo tina te libaku malamu mpo na ba botomboli mosolo ya mikili misusu mpo n’a Congo.

Azali kopesa ntina na milende oyo mbulamatari esali mpo na kosala ete esika ya mosala ezala ya kobenda likebi mpe ya libateli, na boyokani na mayele yango mpe bokoli ya nkita ya mokonzi Félix Tshisekedi oyo etali mingi bokeli makambu ya motuya penza ya ebolo n’a ebolo.
“Lokola mobembo ya Tata nkumu ya ekolo Tshisekedi na Paris ezali kobɛlɛma, tozali na ekateli mingi koleka mpo na kopanzana na tina na biso ya boyokani ya nkita na France. ezali bondimisi ya mposa na biso ya komatisaka mombongo mpe botiami mosolo na bikolo mibale. » elobi Anthony Nkinzo Kamole, mokambi monene ya ANAPI na liyebisi ya bapanzi sango liye.
Esengeli koyeba ete masolo makokoba na ntango oyo ekosalema mokolo ya tuku misatu sanza mineyi na miso ya tata mokonzi ya ékolo. Ebongisami na mpe batongi, bisika liye pona lobi n’a ékolo ya n’kita ya Congo.
Caleb Makedika













