Ndaku ya mosala ya bapanzi Sango ya actualité.cd eyambaki ba panzi Sango biyike mokolo ya poso 19 sanza ya mibale bayaki kozwa N’zebi na lolenge ya malamu ya kolekisa bosololi pe kopanza Sango.
Na maloba naye,molakisi Julie Tshienda Mwamba, atalisaki na ba panzi Sango te ezali motuya koyeba kolimbola malamu lolenge ya kolekisa basango, atalisaki lisusu bokeseni kati ya kopesa Sango na kolimbola bosololi , na molongo ya maloba naye apesaki lisusu mwa bozongisi sima ya mayele ezwamaka na biteelo pona kozongisa N’zebi okati ya ba panzi Sango, Yako yeba te ba panzi Sango bazwaki lisusu libaku elamu ya kopesa bokaboli ya N’zebi .
Pona mokambi ya éditorial7.net na éditorialhebdo Gilbert Fundi, moko ya baye bazui bolakisi,apesi matondo na ba kambi ya Congoprofond, Mwana mboka Tchèque Bukasa na ndeko wa ye Patient Ligodi ya actualité.cd matondi pona bolakisi oyo bazui, pona ye ekozala malamu te bolakisi oyo ezalaka po te e lendisa boyebi pe N’zebi okati ya bilenge baye bakosalaka mosala ya bo panzi Sango.
Pona kosukisa,esengeli koyeba te ba panzi Sango tuku zomi na mineyi bazui bolakisi na bokasi ya Congoprofond na actualité.cd
Pe milulu misusu na maye matali mibeko pe lolenge yakozala pe kosala mosala Yako bo panzi sango ekosalema mikolo mikoya.
yulio Fundi.