Bo tongisi ndako na moputu Budimbu na Muabilu batelemeli baye ba kotongaka na moputu.
Kinshasa, 09 novembre 2022
Ba ndeko babale bayi likita ya bulamatari ya Congo Demokratiki o kombo ya Didier Budimbu mpe Puis Muabilu bawuti ko sala loningisa na batu oyo batongi bisika ya boteki putolo pe baye bakotongo na moputu pe kozanga kotosa mibeko eye kotalisa lolenge ya botongi pe lisusu likolo ya biloko eye kolekisaka putolo na Kinshasa.
Kasi mvula eye ebetaki mokolo ya lobi loleki epekisaki te na botelemi ya bakambi babale
Ezalaki motuya mingi bokiti na bango pona kotala lolenge kani moputu mpe moboleya ekosalema na kanza nioso mpe baye ba kweyisami ba zali nakati ya etumbu.
Ebandaki nayino na nzela ya Ndjili secomaf wapi esika batu ba kotongo likolo ya singa liye eko tambolisaka putolo kowuta Matadi kino Kinshasa.
Koyeba te botongi ena eko tiyaka bana mboka na pasi pe liboso ya makama kili kili , kasi mikano pe ezwami pona kotiya kimia o nzela ya botongi ndako mingi mingi na baye bayebaki kotongo likolo ya singa eye kolekisa putolo kuwuta Matadi ti Kinshasa.
Bandako ebukami, bisika ya boteki putolo ekangami bakolo ya bisika ya bitekela ba byangami na bulamatari.
Yulio Fundi