Mills TSHIBANGU, mopanzi sango ya enquête oyo ayebani mingi na République démocratique du Congo, amilakisaki vendredi oyo le 19 juillet 2024, na buro ya likita ya likolo ya Audiovisuel (CSAC) mpo na koyanola na lokasa oyo etali babifundeli ya bato ya maloba ya kofinga Kontre ya Inspecteur général ya misolo.
Kasi, ntango akómaki, ata moko te kati na bato oyo babengaki ye azalaki wana mpo na koyoka ye.
Liboso ya bapanzi sango ya Kinshasa, Mills TSHIBANGU azongi na documentaire na ye ya sika, esika alobelaki mokonzi ya mosala, Inspecteur général ya misolo, kasi Inspection général ya misolo te, yango nde ememaki na babifundeli wana.
Liboso ya likambo oyo, TSHIBANGU apesi mbela na bayi mboka ya Kinshasa, koleka na ba mamans na mibali, bakende naye elongo liboso yaba bazuzi na tina ya kolonga etumba malamu noble oyo.
Na tango moko, asengi mpe na Inspecteur général ya misolo akende elongo na ye na esambiseli mpo na ko défendre kozonga mbeba na ye.
Esengeli koyeba tè Mills TSHIBANGU asengaki lisungi ya mama mokonzi ya mbulamatari mpo na kobimisa misolo oyo ezalaki na ba masanga mosusu na boyokani na Inspecteur général ya misolo. Mpe alaki kosopa encre mingi na mikolo ekoya na oyo etali likambo oyo.
Caleb Makedika













