Koleka mbula moko, likambo to mpe likanisi ya bolongoli bibundeli, ko longola mpe kozwa lisusu ya masanga mpe bofandisami na yango oyo babengi na liflansé desarmement démobilisation, récupération communautaire et stabilisation (DDRC-S) ezali kokita atako tata mokonzi ya ékolo, Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo alingi mpo botiami na yango na mosala.
Engebene na baye bazwi litomba, lisano ya ping-pong ezali kati na n’toma ya bobatelami( défense), ntoma ya bobombi mbongo (budget) mpe ya misolo finances) mpo na kosunga likambu eye, likonzí ya elikya mpo na bolamu ya ekolo.
Mpo na ntoma ya bobatelami, misolo oyo obongisami mpo likambo oyo esi endimami liboso ya basali mibeko mpe epesamaki na mbulamatari ya mama mokambi Suminwa. Mpo na ntoma ya bobatelami, nazali kozela manaka ya bobimisi ya misolo na mbulamatari ya misolo. Na oyo etali oyo ya suka, nionso esili, tozo zela etinda mama mokonzi ya mbulamatari. Oyo elobi malamu koleka! Bale ebalukaka na katikati ya esika ya lisano.
Nani kati na ba ntoma misato oyo azali koboya mpe komona pamba likambo oyo endimami na motema mobimba mpe etiami maboko epayi ya tata mokonzi ya ékolo, Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo?
Pona bato oyo batalaka makambo iye oyo bayokaki sango yango, likanisi iye ekokisaka elikya na bango te po mbulamatari ya mokambi Judith Suminwa Tuluka elembi nzoto mpenza, koleka po ezali na makoki te ya kopesa misolo mpa na bobandisami ya koyeba yango, mikanda na yango mpe koyeba mobembo ya mabota,
médiation pe kokotisa yango o kati ya moboyi na mikolo nionso mpe ya lisanga.
Atako bato mingi bamipesaki na bituka lokola Nord-Kivu, Ituri, Bandundu mpe Kongo Central, makambu ezongi sima processus ezali na bitumba ya kati na kati ya bosalemi na ngo, oyo emonanaka lokola bimekano ya koboya ekeke ya bokonzi ya Félix Tshisekedi.
Tata mokonzi, Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo, na lisikulu na ye na ntuku sambo na libwa ya molulu ya lisanga monene ya lisanga ya bikolo, andimi lisusu mposa na ye ya kosala ete kimia ezala ya seko na RDC mpe kosala ete P-DDRCS ezala likonzí ya ntina ya mayele maye . Kasi, kozanga emoniseli mpe bokambi na kati ya mbulamatari ezali komeme mua kokoso ya likambu oyo.
mposa ya kozwa mosolo malamu nokinoki mpo na likambo ezali na ntina mpo na kofandisa bingumba oyo nungu nungu ezali mpe kopesa makanisi ya sika ya nkita oyo elongobani na babundi ya kala ex-combattants. Kozanga misala ya mbangu mpe ya boyokani, likama ya bokengi na est ya mboka ezali kaka kotungisa.
Caleb Makedika