Haut Katanga: Jacques Kyabula na Zambie nsima na bomati ya ntalo ya farini ya masango
Ntalo ya farini ya masango emati makasi na ba wenze ya Haut Katanga. Pona ko bongisa makambo oyo mokonzi sa yambo ya engumba ya haut Katanga Jacques Kyabula katwe akendaki le 16 mars na Lusaka na capitale ya Zambie.
« Nazali na Lusaka mpo na eyano ya nokinoki mpo na bomati ya ntalo. Nasololi likambo liye na ministre ya mombongo ya ékolo ya Zambie, Hon. Chipoka Mulenga. Motango monene ya masango epesami na ba opérateurs économiques na biso » esakoli Jacques kyabula na compte na ye ya twitter
Kosala bilanga yabiso moko ekozala mumotuya penze pona empowerment ya Haut Katanga oyo etali kaka mboka ya Zambie, Jacques kyabula a ndimi que ye na mbulamatari na ye bakomatisaka boloni po ba kotanda loboko lisusu te na ba mboka pêne pêne te. Abakisi boye: “Na ntango yango, tozali kosala makasi koleka mpo na kobakisa biloko oyo tozali kobimisa na mboka mpo tózala lisusu na elikya te na bazalani na biso.”
Esengeli koyeba ete saki ya farini ya maïs ya kilo 25, oyo etekamaki eleki sanza moko na 25.000 francs congolais, ezali sikawa kotɛkama na 55.000 FC to ata na 60.000 francs congolais (27 USD) na Lubumbashi (Haut-Katanga). Libumu ya nzala ezalaka na litoi te, balobi, eyano ya lombango pona ko kozongisa n’a nzela makambo ezali mposa munene na ngonga oyo pona ba luchois (katanga ya likolo).
Caleb Makonda