Mɔtɔ makasi esalemaki samedi oyo le 3 juin 2023 pene na ngonga ya 9 p.m. na etuka ya Zaïre na engumba Bukavu. Bandako koleka 600 ekómaki mputulu ya mɔtɔ.
Kotikala na Bukavu, Sénateur Matata Ponyo akendaki ko kabola mawa na bayi mboka ya etuka ya Camp Zaire ya commune ya Kadutu na engumba ya Bukavu, na ndenge wana amemeli bango likabo na ye.

« Nayoki mawa lelo na bandeko na ngai ya mibali mpe basi na etuka ya Camp Zaïre ya commune ya Kadutu na engumba Bukavu baye babungisaki bandako na bango lobi na butu nsima na moto. Pene na bandako 600 emataki na milinga nasali mpe oikabo na ngai modeste » elobi Sénateur Matata Poyo Mapon.

Simbá tè bantina ya mɔ́tɔ eyebani naino te. Lapolo ya komeka elakisi bandako koleka 600 oyo ezikisami mpe esengeli koyebisa bomoi ya bato te.
Caleb Makonda













