Kozanga kofutama na boumeli ya sanza 5, basali ya Trans-Academia basakolaki tè bakosala tè Lelo mokolo ya lundi oyo le 16 octobre. yango wana , motuka moko te ezali na nzeka mpo na ko komisa mpete botamboli ya bana kelasi, mingimingi ba nzela minene ya provense ya engumba ya Kinshasa.
Lokola bazali ba bazwi litomba ya liboso ya manaka oyo, bayekoli bazali koganga n’a mongongo makasi epa ya na bakonzi mpe mingi mingi na n’toma oyo Atalaka makambo ya misolo mpo ete likambo oyo esila noki.
“bisi ya trans-académie ezali nzela ya transpore oyo esalisaka biso tótambola na ntalo moke. Tozali na makambo mingi ya kobungisa ntango ezali na lolenge oyo ya kokatakata. Toyoki na mpasi mpe mawa tè batu ya misala ya mituka n’a biso bafutami te wuta sanza 5 et tosombaka ba abonnement na biso mikolo nionso. Ezali na ntina mingi ete bakonzi bázwa mokano oyo ekoki nokinoki,” elobi mwana-kelasi moko ya Iniversite ya Pédagogique nationale.
Boyeba ete motango monene ya basali ya Trans-Academie bamonani liboso ya Palais du Peuple wuto na tongo ya lundi 16 octobre, mpo na kosenga misolo oyo esengeli mbulamatari pesa na bango.
Caleb Makonda