« komemya makoki ya bomoto, likonzí ya ntina mpo na lobi ya malamu mpe lisanga ya mobulu te » ezali motó ya likambo liye lilobami na likita liye libongisami na Centre Cartel mokolo ya zomi ya sanza ya zomi na mibale na kati ya eteyelo ya likolo ya Université pédagogique nationale (UPN).
Mosala moye mosalemaki na libaku ya bokundoli mikolo zomi na motoba (16) ya mosala elongo na mokolo ya mokili mobimba ya makoki ya bomoto oyo ekundolaka mokolo ya zomi ya sanza ya zomi na mibale ya mbula na mbula.
Na tango ya maloba na ye Marie-Joséphine Tshiayipolo, mokambi ya makambu matali ya ndako ya mibeko ya moto to mpe Déclaration universelle des droits de l’homme, alobeli mingi penza mibeko makoki ya bato na kolakisa te Déclaration universelle des droits de l’homme (DUDH) oyo ezali pona ye mokanda eleki na ntina mpe moboko ya ba misusu nionso.
« Déclaration universelle des droits de l’homme ezali mpo na tindi na makasi te kasi Ezali mokanda ya ntina mpe ya moboko mpo mikanda misusu nyonso milandaki mizali na ye. Nsima na yango tokomaki na charte internationale ya droits de l’homme epayi wapi tozali na ba mikanda ya boyokani ya mokili. » oyo ezali kaka mikanda to misala ya bokangami. » azali komonisa yango
Kokoba, Marie-Joséphine atangaki mibeko ya makoki ya bomoto nzokande azali kopesa ntina mingi na boyokani mpe lokumu ya bomoto oyo, engebene na ye, ezali moboko ya makoki nyonso ya bomoto, mpe boyokani kati na mibali mpe basi mibale.
Amonisaki mpe ntina ya molulu oyo na eteyelo ya likolo lokola oyo.
“Bayekoli bazali bakambi na biso ya lobi mpe tolingaki kosolola na lolenge oyo mpo ete bango na niveau na bango bakoka bopusi basusu na masengi na bango ya mibeko ya moto (droits civils).” azali koloba na molende
Na ngambo na ye, Isaac Katumbayi, molobi mpe mosangani ya centre ya cartel, atongaki lisikulu na ye na mobulu ya bokeseni ya mibali na basi nzokande azali kopesa ntina na mikakatano miye baye bazwaki mpasi bakutanaka na yango.
« Ezali na bato mingi oyo bazwaki mpasi na mobulu ya kosangisa nzoto mpe mobulu ya mibali na basi baye bayebisaka makambo te, mpo na bobangi ya kozongisa mabe na baye basali bango, mpo na kobanga kotungisama na bisika ba fandi mpe lisusu mpo na kozanga masangi oyo ekoki kosunga mpe epesaka maboko. Bamilobaka ete ata soki bango. » kosakola, bakozwa eyano te,” elobi ye.
Koleka, akebisi mpe na bomati ya 32% ya baye oyo bazo bika mobulu oyo elobamaki na katikati ya mbula na bato oyo balanda makambu iye ya mbula oyo azali kolakisa que eteni monene ya mobulu oyo ekomami na eteni ya est ya RDC kolekana bisika ya bitumba. E tatoli ye.
Lokola basepelaki na masolo wana ya mayele, basangani bamonisaki bosepeli na bango na kotunaka mituna oyo bango nyonso bazwaki biyano ya kotonga.
CM